‏ Psalms 75

Nzambe akosambisa mokili

1
75:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya koyemba lokola « Koboma te ! » Nzembo ya Azafi.

2
75:1 in most Bibles.
Nzambe, tozali kosanzola Yo,
tozali kosanzola Kombo na Yo ;
mpo ete Kombo na Yo ezali pene,
bato bazali kotatola bikamwa na Yo.

3
75:2 in most Bibles.
Olobaki :
« Na tango oyo ngai moko nakobongisa,
nakokata makambo na bosembo.
4
75:3 in most Bibles.
Mokili ekoki kolenga
elongo na bavandi na yango nyonso,
kasi ezali ngai nde nalendisaka
makonzi na yango. »

5
75:4 in most Bibles.
Nazali koloba na moto ya lofundu :
« Kotombola lisusu mapeka te ; »
mpe na bato mabe :
« Bosala lisusu lolendo te.
6
75:5 in most Bibles.
Bomeka lisusu te kosala lofundu
mpe koloba na lolendo. »

7
75:6 in most Bibles.
Botombwami ewutaka na Este te, na Weste te,
ewutaka mpe na esobe te.
8
75:7 in most Bibles.
Pamba te ezali Nzambe nde akataka makambo :
akitisaka moto songolo
mpe atombolaka moto pakala.

9
75:8 in most Bibles.
Loboko na Yawe esimbi kopo
oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo.
Azali kosopa yango,
mpe bato mabe nyonso ya mokili
bazali komeka mpe komela yango
kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.

10
75:9 in most Bibles.
Mpo na ngai, nakotatola makambo oyo
tango nyonso,
nakoyemba mpo na lokumu ya Nzambe ya Jakobi,
11
75:10 in most Bibles.
oyo azali koloba :
« Nakosilisa makasi nyonso ya bato mabe ;
kasi nguya ya bato ya sembo
ekomata lisusu makasi. »
Copyright information for LinMNB