‏ Psalms 77

Nzambe abongwani to te ?

1
77:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Azafi.

2
77:1 in most Bibles.
Nabelelaka Nzambe na koganga ;
nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai !
3
77:2 in most Bibles.
Tango nazalaka na pasi, nalukaka Nkolo ;
na butu, nalembaka te kotombola maboko na ngai
mpe naboyaka kobondisama.

4
77:3 in most Bibles.
Nakanisaka Nzambe mpe nalelaka,
nakotaka na mozindo ya makanisi
mpe nalembaka nzoto.

5
77:4 in most Bibles.
Opimelaka miso na ngai pongi,
namitungisaka mpe nayebaka lisusu te
eloko ya koloba.
6
77:5 in most Bibles.
Nakanisaka lisusu mikolo ya kala,
mibu nyonso oyo eleka ;
7
77:6 in most Bibles.
Na butu, nakanisaka lisusu banzembo na ngai ;
motema na ngai ezongelaka kokanisa,
mpe molimo na ngai ekomaka komituna :
8
77:7 in most Bibles.
« Boni, Nkolo akobwaka biso penza
mpo na libela ?
Akosalela biso lisusu bolamu te ?
9
77:8 in most Bibles.
Bolingo na Ye esili penza mpo na libela ?
Bilaka na Ye ekokokisama te mpo na libela ?
10
77:9 in most Bibles.
Nzambe abosani solo kosala ngolu ?
Akangi penza motema na Ye mpo na kanda ? »

11
77:10 in most Bibles.
Mpe namilobelaka :
« Tala likambo oyo ezali kosala ngai pasi :
loboko ya mobali ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo
ebongwani ! »
12
77:11 in most Bibles.
Nakanisaka misala minene ya Yawe,
bikamwa na Yo ya kala.
13
77:12 in most Bibles.
Nakanisaka nyonso oyo osalaki
kino na bikamwa na Yo.

14
77:13 in most Bibles.
Oh Nzambe, banzela na Yo ezali bule ;
nzambe nini akokani na Yo na monene ?
15
77:14 in most Bibles.
Ozali Nzambe oyo asalaka bikamwa ;
olakisi nguya na Yo kati na bikolo.
16
77:15 in most Bibles.
Na nguya ya loboko na Yo,
okangolaki bato na Yo,
bakitani ya Jakobi mpe ya Jozefi.

17
77:16 in most Bibles.
Oh Nzambe, mayi emonaki Yo !
Mayi emonaki Yo mpe ekomaki kolenga ;
ezala mozindo ya mayi eninganaki.
18
77:17 in most Bibles.
Mapata esopaki mayi ebele,
likolo eyokisaki lokito ya kake,
mpe makonga na Yo ezalaki koleka-leka
na bangambo nyonso.
19
77:18 in most Bibles.
Na lokito ya kake na Yo,
mikalikali engengisaki mokili,
mabele eninganaki mpe elengaki.
20
77:19 in most Bibles.
Opasolaki nzela kati na ebale monene,
balabala na Yo kati na mayi monene,
mpe moto moko te amonaki bilembo
ya matambe na Yo.
21
77:20 in most Bibles.
Otambolisaki bato na Yo lokola etonga,
na loboko ya Moyize mpe ya Aron.
Copyright information for LinMNB