‏ Psalms 81

Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai…

1
81:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

2
81:1 in most Bibles.
Boganga na esengo
epai ya Nzambe, makasi na biso !
Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko !
3
81:2 in most Bibles.
Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike,
lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze !
4
81:3 in most Bibles.
Bobeta kelelo na ebandeli ya sanza,
na tango oyo sanza mobimba engengaka,
mpo na mokolo ya feti na biso !

5
81:4 in most Bibles.
Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele,
mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.
6
81:5 in most Bibles.
Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi
tango abundisaki Ejipito.

Nazali koyoka lokota oyo nayebi te :
7
81:6 in most Bibles.
« Nalongolaki mokumba
oyo ezalaki na mapeka na ye,
mpe maboko na ye elongwaki
na bowumbu ya kosimba bitunga. »
8
81:7 in most Bibles.
Tango ozalaki koganga mpo na pasi,
nakangolaki yo,
nayanolaki yo kati na kake
epai wapi nabombamaki,
namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.

9
81:8 in most Bibles.
Bato na ngai, boyoka ngai !
Mpe nakokebisa bino.
Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai !
10
81:9 in most Bibles.
Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo,
okogumbamela nzambe mosusu te,
longola kaka ngai !
11
81:10 in most Bibles.
Nazali Yawe, Nzambe na yo,
oyo abimisaki yo na Ejipito ;
fungola malamu monoko na yo,
mpe nakotondisa yango.

12
81:11 in most Bibles.
Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te,
Isalaele aboyaki kotosa ngai.
13
81:12 in most Bibles.
Mpo na yango, natikaki bango kotambola
kolanda baposa ya mitema makasi na bango ;
mpe balandaki makanisi na bango.
14
81:13 in most Bibles.
Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai,
soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,
15
81:14 in most Bibles.
nalingaki mbala moko koyokisa
banguna na bango soni
mpe kobundisa bayini na bango.
16
81:15 in most Bibles.
Mpe bato oyo bayinaka Yawe
balingaki komikitisa liboso na Ye,
mpe etumbu na bango elingaki kowumela
mpo na libela.
17
81:16 in most Bibles.
Yawe alingaki koleisa Isalaele
bilei ya kitoko
mpe kotondisa bango na mafuta ya nzoyi.
Copyright information for LinMNB