‏ Psalms 84

Nazali na posa makasi ya Tempelo na Yo

1
84:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

2
84:1 in most Bibles.
Yawe, Mokonzi ya mampinga,
tala ndenge bisika oyo ovandaka
ezali kopesa posa !
3
84:2 in most Bibles.
Nzoto na ngai mobimba ebukani pene nakufa
mpo na posa makasi ya lopango ya Yawe !
Motema mpe nzoto na ngai ezali koganga
epai ya Nzambe na bomoi.

4
84:3 in most Bibles.
Ndeke ya moke ezwaka esika ya kovanda,
mpe mbilambila esalaka zala
epai wapi etiaka bana na yango,
pene ya bitumbelo na Yo,
Yawe, Mokonzi ya mampinga,
Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.
5
84:4 in most Bibles.
Esengo na bavandi ya Ndako na Yo !
Bakokumisa Yo tango nyonso !

6
84:5 in most Bibles.
Esengo na bato oyo bazwaka makasi kati na Yo ;
bakendaka na esengo na Tempelo na Yo !
7
84:6 in most Bibles.
Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka,
bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi,
mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.
8
84:7 in most Bibles.
Makasi na bango ebakisamaka tango nyonso
kino bakomaka na Siona, liboso ya Nzambe.
9
84:8 in most Bibles.
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
yoka losambo na ngai !
Nzambe ya Jakobi, yoka ngai !

10
84:9 in most Bibles.
Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala !
Tala elongi ya mopakolami na Yo !

11
84:10 in most Bibles.
Lokola kovanda mokolo moko
kati na lopango na Yo
eleki kovanda mikolo nkoto moko
na esika mosusu,
naponaki kotelema na ekotelo
ya Ndako ya Nzambe na ngai
na esika ete navanda kati na bandako ya kapo
ya bato mabe.

12
84:11 in most Bibles.
Pamba te, mpo na biso,
Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ;
Yawe apesaka ngolu mpe nkembo,
aboyaka kopesa eloko moko te
epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.
13
84:12 in most Bibles.
Yawe, Mokonzi ya mampinga,
esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yo !
Copyright information for LinMNB