Psalms 85
Yawe asalelaka biso bolamu
1 ▼▼85:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. 2 ▼▼85:1 in most Bibles.
Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu,ozongisaki bato ya Jakobi,
oyo bazalaki na bowumbu,
3 ▼
▼85:2 in most Bibles.
olimbisaki mabe ya bato na Yompe olongolaki masumu na bango nyonso.
4 ▼
▼85:3 in most Bibles.
Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasimpe okitisaki motema na Yo.
5 ▼
▼85:4 in most Bibles.
Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso !Longola kanda na Yo na tina na biso !
6 ▼
▼85:5 in most Bibles.
Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ?Okokangela penza biso kanda
mpo na tango nyonso ?
7 ▼
▼85:6 in most Bibles.
Okozongisela biso lisusu bomoi tempo ete bato na Yo basepela kati na Yo ?
8 ▼
▼85:7 in most Bibles.
Yawe, talisa biso bolingo na Yo,mpe pesa biso lobiko na Yo !
9 ▼
▼85:8 in most Bibles.
Yawe,nakoyoka maloba na Nzambe ;
pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye
mpe ya bayengebene na Ye.
Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.
10 ▼
▼85:9 in most Bibles.
Solo, lobiko na Ye ezali pene ya batooyo batosaka Ye
mpo ete nkembo na Ye ewumela
kati na mboka na biso.
11 ▼
▼85:10 in most Bibles.
Bolingo mpe boyengebene ekutanaka,bosembo mpe kimia eyambanaka.
12 ▼
▼85:11 in most Bibles.
Bosolo ebotaka wuta na mabele,mpe bosembo etalaka wuta na likolo.
13 ▼
▼85:12 in most Bibles.
Ye moko Yawe akopesa esengo,mpe mabele na biso ekobota bambuma.
14 ▼
▼85:13 in most Bibles.
Bosembo etambolaka liboso na Yempe elakisaka nzela oyo ekolekela.
Copyright information for
LinMNB