‏ Psalms 87

Siona, etima ya bikolo nyonso

1Nzembo ya bana ya Kore.

Yawe atia moboko ya Siona
na likolo ya bangomba ya bule.
2Yawe alingaka bikuke ya Siona
koleka bandako nyonso ya Jakobi.
3Oh engumba ya Nzambe,
maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !

4Kati na bato oyo bayebi ngai,
natangi Rahavi mpe Babiloni.
Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri
mpe Kushi ebimela.
5Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama :
« Bato nyonso babimela awa,
mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo
nde alendisaka yango. »
6Tango Yawe akomaki
kati na buku ya bikolo,
akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango :
« Moto songolo abotama kati na Siona ! »
7Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka :
« Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »
Copyright information for LinMNB