‏ Psalms 88

Libondeli ya moto oyo akomi pene ya kokufa

1
88:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na flite. Nzembo ya Emani, moto ya Ezera.

2
88:1 in most Bibles.
Yawe, ozali Nzambe ;
Yo nde obikisaka ngai !
Butu mpe moyi, nagangaka epai na Yo !
3
88:2 in most Bibles.
Tika ete losambo na ngai ekoma epai na Yo ;
Yoka koganga na ngai !

4
88:3 in most Bibles.
Pamba te bomoi na ngai etondi na pasi
mpe nakomi pene ya kokufa.
5
88:4 in most Bibles.
Batie ngai na molongo ya bato
oyo bazali kokende na kunda ;
nakeseni ata moke te na moto
oyo azali lisusu na makasi te.
6
88:5 in most Bibles.
Nakomi moko kati na bakufi,
lokola bato oyo basila kokufa na bitumba
mpe bazali sik’oyo kati na kunda,
lokola bato oyo okanisaka lisusu te,
pamba te obatelaka bango lisusu te.

7
88:6 in most Bibles.
Obwaki ngai na libulu ya mozindo makasi,
kati na mozindo ya molili.
8
88:7 in most Bibles.
Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai,
bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.

9
88:8 in most Bibles.
Okaboli ngai na balingami na ngai ya motema,
okomisi ngai eloko ya nkele na miso na bango ;
nakomi lokola mokangami kati na boloko,
nakoki kobima te !
10
88:9 in most Bibles.
Miso na ngai ezali komona lisusu te mpo na pasi ;
nzokande nabelelaka Yo, Yawe,
mikolo nyonso,
natombolaka maboko na ngai epai na Yo !

11
88:10 in most Bibles.
Boni, okosala bikamwa mpo na bakufi ?
Boni, bakufi bakoki kotelema
mpo na kosanzola Yo ?

12
88:11 in most Bibles.
Boni, bolingo na Yo etatolamaka kati na kunda,
mpe bosembo na Yo, kati na mboka ya bakufi ?
13
88:12 in most Bibles.
Boni, bikamwa na Yo eyebani kati na molili,
mpe bosembo na Yo, kati na mokili
ya bato oyo babosana ?

14
88:13 in most Bibles.
Kasi ngai, nazali kobelela nde Yo, Yawe ;
nabondelaka Yo tongo nyonso.
15
88:14 in most Bibles.
Yawe, mpo na nini kobwaka ngai
mpe kobombela ngai elongi na Yo ?

16
88:15 in most Bibles.
Wuta bolenge na ngai,
nazali mobola mpe moto na pasi ;
mpe okweyiselaka ngai makambo na Yo ya somo !
Solo, elikya esili ngai !
17
88:16 in most Bibles.
Kanda makasi na Yo ebetaka ngai,
minyoko oyo ewutaka epai na Yo
ekomisaka ngai moto pamba.
18
88:17 in most Bibles.
Ezingelaka ngai mikolo nyonso,
lokola mayi, na bangambo nyonso.
19
88:18 in most Bibles.
Okaboli ngai na baninga mpe balingami na ngai,
natikali na moninga kaka moko ya motema : molili !
Copyright information for LinMNB