‏ Psalms 89

Wapi bolingo na Yo ya kala

1 ▼
▼89:1 in some Bibles.
Maloba ya Etani, moto ya Ezera.

2 ▼
▼89:1 in most Bibles.
Nakoyemba tango nyonso
bolingo ya Yawe ;
monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo
libela na libela.
3 ▼
▼89:2 in most Bibles.
Solo, nazali kotatola yango :
« Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te ;
ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo. »

4 ▼
▼89:3 in most Bibles.
Olobaki : « Nasali boyokani
elongo na moponami na ngai,
nalapi ndayi epai ya mosali na ngai, Davidi :
5 ▼
▼89:4 in most Bibles.
‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi
mpo na tango nyonso
mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi
mpo na seko. › »

6 ▼
▼89:5 in most Bibles.
Yawe, Lola esanzolaka
misala na Yo ya kokamwa
mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.
7 ▼
▼89:6 in most Bibles.
Nani akokani na Yawe kuna na likolo ?
Nani akokani na Yawe
kati na mampinga ya likolo ?

8 ▼
▼89:7 in most Bibles.
Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu ;
solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.
9 ▼
▼89:8 in most Bibles.
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
nani azali na nguya lokola Yo ?
Nani, oh Yawe ?
Boyengebene na Yo ezingeli Yo.

10 ▼
▼89:9 in most Bibles.
Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene
mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.

11 ▼
▼89:10 in most Bibles.
Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito,
kino koboma ye ;
mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.

12 ▼
▼89:11 in most Bibles.
Likolo ezali ya Yo ; mabele mpe ezali ya Yo !
Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.
13 ▼
▼89:12 in most Bibles.
Yo nde okela Nor mpe Sude ;
Tabori mpe Erimoni egangaka na esengo
mpo na lokumu ya Kombo na Yo.

14 ▼
▼89:13 in most Bibles.
Loboko na Yo ezali na makasi,
loboko na Yo ezali na nguya,
loboko na Yo ya mobali oyo otombola.
15 ▼
▼89:14 in most Bibles.
Bosembo mpe alima ezali miboko ya
Kiti ya Bokonzi na Yo,
boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.

16 ▼
▼89:15 in most Bibles.
Esengo na bato oyo bayebi kobetela Yo maboko !
Yawe, batambolaka na pole ya elongi na Yo,
17 ▼
▼89:16 in most Bibles.
basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo,
basanzolaka bosembo na Yo.
18 ▼
▼89:17 in most Bibles.
Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango ;
mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.
19 ▼
▼89:18 in most Bibles.
Yawe azali nguba na biso ;
Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.

20 ▼
▼89:19 in most Bibles.
Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo
kati na emoniseli :
« Nasungaki elombe moko ya bitumba,
natombolaki elenge mobali moko
kati na bato na ngai ;
21 ▼
▼89:20 in most Bibles.
namonaki Davidi, mosali na ngai ;
napakolaki ye mafuta na ngai ya bule.
22 ▼
▼89:21 in most Bibles.
Nakobatela ye na loboko na ngai ya nguya,
mpe loboko na ngai ekokomisa ye makasi.
23 ▼
▼89:22 in most Bibles.
Monguna akobimela ye ata moke te na pwasa,
moto mabe akokoka konyokola ye te.
24 ▼
▼89:23 in most Bibles.
Nakobebisa banguna na ye liboso na ye
mpe nakoboma bayini na ye.

25 ▼
▼89:24 in most Bibles.
Bolingo mpe boyengebene na ngai ekozala
elongo na ye ;
mpe na Kombo na Ngai, akotombola elongi.
26 ▼
▼89:25 in most Bibles.
Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye,
mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.
27 ▼
▼89:26 in most Bibles.
Akobelela ngai boye :
‹ Ozali Tata na ngai,
Nzambe na ngai, Libanga
mpe Mobikisi na ngai ! ›
28 ▼
▼89:27 in most Bibles.
Mpe ngai, nakokomisa ye mwana na ngai ya liboso,
mokonzi oyo aleki na kotombwama
kati na bakonzi ya mokili.

29 ▼
▼89:28 in most Bibles.
Nakobatela mpo na seko
bolingo na ngai mpo na ye ;
boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.
30 ▼
▼89:29 in most Bibles.
Nakobatela mpo na libela libota na ye ya bokonzi,
mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela
ndenge moko na likolo.

31 ▼
▼89:30 in most Bibles.
Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai
mpe balandi bosembo na ngai te,
32 ▼
▼89:31 in most Bibles.
soki babuki mitindo na ngai
mpe babateli te mibeko na ngai,
33 ▼
▼89:32 in most Bibles.
nakopesa bango etumbu na nzela ya lingenda,
mpo na botomboki na bango,
mpe na nzela ya makofi, mpo na masumu na bango ;
34 ▼
▼89:33 in most Bibles.
kasi nakowangana te bolingo na ngai
mpe nakobongola te boyengebene na ngai.

35 ▼
▼89:34 in most Bibles.
Nakosambwisa te boyokani na ngai
mpe nakobongola te maloba na ngai.
36 ▼
▼89:35 in most Bibles.
Nalapaki yango na ndayi mbala moko
mpo na libela
na Kombo ya bosantu na ngai :
‹ Nakokosa Davidi te ! ›
37 ▼
▼89:36 in most Bibles.
Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela,
mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela
lokola moyi liboso na ngai.
38 ▼
▼89:37 in most Bibles.
Solo, lokola sanza, ekowumela na bokonzi
mpo na libela.
Motatoli oyo azali kuna kati na likolo
akoki kokosa te. »

39 ▼
▼89:38 in most Bibles.
Nzokande, obwakaki, omonaki pamba,
osilikelaki mopakolami na Yo !
40 ▼
▼89:39 in most Bibles.
Owanganaki boyokani oyo osalaki
elongo na mosali na Yo,
obwakaki na mabele mpe osambwisaki
motole na ye.

41 ▼
▼89:40 in most Bibles.
Otobolaki madusu kati na bamir na ye nyonso
mpe obukaki bandako na ye, oyo batonga makasi ;
42 ▼
▼89:41 in most Bibles.
bato nyonso oyo balekaki wana
babotolaki ye biloko,
mpe bavandi ya pembeni na ye bakomaki kotiola ye.

43 ▼
▼89:42 in most Bibles.
Obakisaki makasi ya bayini na ye
mpe otondisaki banguna na ye nyonso na esengo,
44 ▼
▼89:43 in most Bibles.
osalaki kutu ete mopanga na ye ebalukela ye moko
mpe osungaki ye te na bitumba ;
45 ▼
▼89:44 in most Bibles.
osilisaki kongenga ya lokumu na ye,
obwakaki kiti na ye ya bokonzi na mabele ;
46 ▼
▼89:45 in most Bibles.
okomisaki moke mikolo ya bolenge na ye
mpe olatisaki ye kazaka ya soni.

47 ▼
▼89:46 in most Bibles.
Yawe, kino tango nini ?
Okomibomba penza tango nyonso ?
Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto ?
48 ▼
▼89:47 in most Bibles.
Kanisa motango ya mikolo ya bomoi na ngai !
Okelaki penza bato mpo na suka
oyo ezanga ata tina !
49 ▼
▼89:48 in most Bibles.
Moto nani akoki kozala na bomoi
mpe azanga komona kufa ?
Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi ?

50 ▼
▼89:49 in most Bibles.
Nkolo, wapi bolingo na Yo ya kala
oyo alakaki Davidi na boyengebene na Yo
na nzela ya ndayi ?
51 ▼
▼89:50 in most Bibles.
Nkolo, kanisa ndenge bazali kosakanela
basali na Yo ;
kobosana te ete namemi mokumba
ya bato oyo nyonso !
52 ▼
▼89:51 in most Bibles.
Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo,
oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo !

53 ▼
▼89:52 in most Bibles.
Tika ete Yawe apambolama
libela na libela !
Amen ! Amen !
Copyright information for LinMNB