Psalms 9
Nzambe akataka makambo
1 ▼▼9:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. 2 ▼▼9:1 in most Bibles.
Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba,nakotatola misala minene na Yo nyonso.
3 ▼
▼9:2 in most Bibles.
Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo,nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
4 ▼
▼9:3 in most Bibles.
Banguna na ngai bazongaka sima,bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.
5 ▼
▼9:4 in most Bibles.
Pamba te, okataki likambo na ngaimpe olongisaki ngai,
ovandi na Kiti ya Bokonzi
lokola Mosambisi ya sembo.
6 ▼
▼9:5 in most Bibles.
Opamelaki bikolo mpe obomaki moto mabe,olimwisaki kombo na bango mpo na libela.
7 ▼
▼9:6 in most Bibles.
Banguna na ngai balimwa mpo na libela ;opanzaki bingumba na bango
kino bakanisa bango lisusu te.
8 ▼
▼9:7 in most Bibles.
Yawe akonzaka mpo na libela,atia Kiti na Ye ya Bokonzi
mpo na kokata makambo ya bato.
9 ▼
▼9:8 in most Bibles.
Akonzaka mokili na bosembo,akataka makambo ya bato na alima.
10 ▼
▼9:9 in most Bibles.
Yawe azali ebombamelompo na bato oyo bazali konyokolama,
mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.
11 ▼
▼9:10 in most Bibles.
Bato oyo bayebi Kombo na Yobatiaka elikya na bango kati na Yo ;
pamba te, Yo Yawe,
osundolaka te bato oyo balukaka Yo.
12 ▼
▼9:11 in most Bibles.
Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Sionabanzembo ya masanzoli ;
bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.
13 ▼
▼9:12 in most Bibles.
Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabempo na makila oyo esopani,
akanisaka koganga ya banyokolami.
14 ▼
▼9:13 in most Bibles.
Yawe, yokela ngai mawa,tala ndenge nini bayini na ngai
bazali konyokola ngai,
mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;
15 ▼
▼9:14 in most Bibles.
mpo ete napanza sango ya lokumu na Yokati na bikuke ya Siona, mboka kitoko,
mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.
16 ▼
▼9:15 in most Bibles.
Bapagano bakweyi na libuluoyo batimolaki,
makolo na bango ekangami na mitambo
oyo bango moko basalaki.
17 ▼
▼9:16 in most Bibles.
Yawe amilakisina nzela ya misala na Ye ya bosembo ;
bato mabe bakangami
na mitambo oyo bango moko basalaki.
18 ▼
▼9:17 in most Bibles.
Bato mabe, bikolo nyonso,oyo bakanisaka Nzambe te,
bakokende na mboka ya bakufi.
19 ▼
▼9:18 in most Bibles.
Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola,mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko.
20 ▼
▼9:19 in most Bibles.
Yawe, telema ! Tika ete moto alonga te ;tika ete bapagano basamba liboso na Yo !
21 ▼
▼9:20 in most Bibles.
Yawe, tika ete somo ekanga bango ;tika ete bapagano bayeba ete bazali na bango kaka bato !
Copyright information for
LinMNB