Psalms 92
Ezali malamu kokumisa Yawe
1 ▼▼92:1 in some Bibles.
Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba. 2 ▼▼92:1 in most Bibles.
Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawempe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na
Yo-Oyo-Oleki-Likolo !
3 ▼
▼92:2 in most Bibles.
Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo,na tongo,
mpe boyengebene na Yo, na butu,
4 ▼
▼92:3 in most Bibles.
na lindanda ya basinga zomimpe na nzenze !
5 ▼
▼92:4 in most Bibles.
Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai !Nagangaka na esengo liboso ya misala
ya maboko na Yo.
6 ▼
▼92:5 in most Bibles.
Yawe, misala na Yo ezali minene,mpe makanisi na Yo ezali mozindo !
7 ▼
▼92:6 in most Bibles.
Moto ya kilikili ayebaka te,mpe zoba asosolaka eloko moko te.
8 ▼
▼92:7 in most Bibles.
Tango bato mabe bakolaka lokola matiti,mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka,
ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
9 ▼
▼92:8 in most Bibles.
Kasi Yo, kuna na likolo,ozali Yawe mpo na libela.
10 ▼
▼92:9 in most Bibles.
Yawe, banguna na Yo,banguna na Yo bakokufa penza ;
bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.
11 ▼
▼92:10 in most Bibles.
Okomisi ngai makasi lokola mpakasa,opakoli ngai mafuta ya sika.
12 ▼
▼92:11 in most Bibles.
Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai,mpe matoyi na ngai ekomi koyoka
banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa
mpo na kosala ngai mabe.
13 ▼
▼92:12 in most Bibles.
Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila,bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.
14 ▼
▼92:13 in most Bibles.
Lokola bapikama ngwikati na Tempelo ya Yawe,
bamonaka bolamu kati na lopango
ya Nzambe na biso.
15 ▼
▼92:14 in most Bibles.
Ata bakomi mibange, babotaka kaka,bazalaka kaka makasi mpe kitoko,
16 ▼
▼92:15 in most Bibles.
basakolaka : « Yawe azali alima,azali Libanga na biso ;
kati na Ye, mabe ezali te ! »
Copyright information for
LinMNB