Psalms 100
Bato ya Yawe bazali kokumisa Yawe
Nzembo ya kozongisa matondi
1Boganga na esengo epai na Yawe mokili mobimba !2 Bokumbamela Yawe na esengo nyonso,
mpe boya liboso na ye na banzembo ya esengo !
3 Boyeba ete Yawe azali Nzambe.
Ye moto asalaki biso,
mpe biso tozali bato na ye ;
tozali bato na ye, mpe bameme oyo ye aleyisaka.
4 Bokota na baporte na ye
na kozongisa matondi ;
mpe na lopango na ye
na masanzoli.
Bopesa ye matondi
mpe bosanzola kombo na ye.
5 Pamba te Yawe azali malamu ;
mpe bolingo na ye ezali kowumela tango nyonso,
mpe boyengebene na ye ezali kokoba na batango nyonso.
Copyright information for
LinMNB