‏ Psalms 36

Boboto ya Yawe

1 ▼
▼36:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2 ▼
▼36:1 in most Bibles.
Kati na motema na ngai,
nazali na sango kowuta na Nzambe
na tina na bato mabe oyo batondi na masumu :
Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.

3 ▼
▼36:2 in most Bibles.
Bamipesaka lokumu makasi,
bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.
4 ▼
▼36:3 in most Bibles.
Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta,
baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.
5 ▼
▼36:4 in most Bibles.
Ezala na bambeto na bango,
basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe,
batambolaka te mpo na kosala bolamu
mpe baboyaka mabe te.

6 ▼
▼36:5 in most Bibles.
Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo,
boyengebene na Yo kino na mapata.
7 ▼
▼36:6 in most Bibles.
Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe,
mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi.
Yawe, obikisaka bato mpe banyama.
8 ▼
▼36:7 in most Bibles.
Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya !
Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.
9 ▼
▼36:8 in most Bibles.
Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo,
mpe omelisaka bango mayi
kowuta na bolingo monene na Yo.
10 ▼
▼36:9 in most Bibles.
Pamba te etima ya bomoi ezali elongo na Yo ;
kati na pole na Yo nde tomonaka pole.

11 ▼
▼36:10 in most Bibles.
Koba kotalisa bolingo na Yo epai ya bato oyo bayebi Yo,
mpe bosembo na Yo epai ya bato ya mitema alima.
12 ▼
▼36:11 in most Bibles.
Tika ete bato ya lolendo bakoma te kino epai na ngai,
mpe tika ete bato mabe babengana ngai te.
13 ▼
▼36:12 in most Bibles.
Tala ndenge nini bato ya misala mabe bakweyi,
balali na mabele, bazangi makoki ya kotelema.
Copyright information for LinMNB