1 Chronicles 11:4-9
Davidi abotoli Yelusalemi
(2Sa 5.6-10)
4Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bakendeki kobundisa Yelusalemi oyo bazalaki kobenga « Yebusi. » Bato oyo bazalaki kovanda kuna bazali bato ya Yebusi. 5Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te ! » Kasi Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi. 6Davidi alobaki na bato na ye : « Moto oyo akobundisa mpe akolonga bato ya Yebusi, akokoma mokonzi ya liboso ya basoda. » Joabi, mwana mobali ya Tseruya, atelemaki moto ya liboso mpo na kobundisa bato ya Yebusi mpe akomaki mokonzi ya liboso ya mampinga. 7Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi ; yango wana babengaki yango « Engumba ya Davidi. » 8Mpe atongaki bandako zingazinga na yango, longwa na Milo kino na mir ya kati. Bongo Joabi abongisaki bisika oyo etikalaki kati na engumba. 9Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, azalaki elongo na ye.
Copyright information for
LinMNB