1 Chronicles 14:1-2
Davidi na Yelusalemi
(2Sa 5.11-16; 1Ma 3.5-8)
1Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, bato oyo bapasolaka mabanga mpe basharipantie ; mpe batongelaki ye ndako. 2Davidi asosolaki ete Yawe nde akomisaki ye mokonzi ya Isalaele mpe ete azalaki kotombola bokonzi na ye makasi mpo na Isalaele, bato na Ye.
Copyright information for
LinMNB