‏ 1 Chronicles 14:8-16

Davidi alongi bato ya Filisitia

(2Sa 5.17-25)

8Tango bato ya Filisitia bayokaki sango ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele mobimba, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, abimaki mpo na kokutana na bango. 9Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya bakitani ya Rafa. 10Davidi atunaki Nzambe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ?

Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bango na maboko na yo.

11Bato ya Filisitia bamataki na Bali-Peratsimi, mpe Davidi alongaki bango kuna. Bongo Davidi alobaki : « Na nzela ya loboko na ngai, Nzambe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. »

Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi
Bali-Peratsimi elingi koloba : Nkolo ya banzela.
.
12Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango, mpe Davidi apesaki mitindo ete batumba yango na moto.

13Sima na mwa tango, bato ya Filisitia bayaki mpe bapanzanaki lisusu kati na lubwaku. 14Bongo Davidi atunaki lisusu Nzambe, mpe Nzambe azongiselaki ye : « Tango okobundisa bango, kolanda bango na sima te ; kasi tambola mopanzi, mosika na bango. Bongo tango okokoma epai bango bazali, bimela bango na liboso, liboso ya zamba ya banzete ya mirie
Mirie ezali lolenge moko ya nzete oyo mbuma na yango ezalaka mwindo mpe esungaka mpo na kokawusa pota.
.
15Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya mirie, na tango wana nde okobima mbala moko mpo na kobunda ; pamba te ekolakisa ete Nzambe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »

16Davidi asalaki ndenge Nzambe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Gabaoni kino na Gezeri.
Copyright information for LinMNB