‏ 1 Chronicles 16:23-33

23Bino bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe !
Bosakolaka lobiko na Ye mokolo na mokolo !
24Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota !
Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso !
25Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu,
azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
26Pamba te banzambe nyonso ya bikolo ezali kaka bikeko ya pamba,
nzokande Yawe nde akela likolo.
27Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye,
makasi mpe esengo ezali na esika oyo avandaka.
28Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe,
bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye !
29Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo !
Bomema makabo mpe boya liboso na Ye,
bogumbamela Yawe mpo na kongenga ya bosantu na Ye !
30Bino, bato ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye !
Solo, mokili elendisama makasi, ekoningana te.
31Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo !
Tika ete baloba kati na bikolo :
« Yawe azali mokonzi ! »
32Tika ete ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango
etia makelele ;
tika ete zamba mpe nyonso oyo ezali kati na yango
esepela !
33Boye, banzete ya zamba ekoyemba,
ekoyemba na esengo liboso ya Yawe,
pamba te Yawe azali koya kosambisa mabele.
Copyright information for LinMNB