1 Chronicles 17:1-15
Elaka ya Nzambe epai ya Davidi
(2Sa 7.1-17)
1Wana Davidi avandaki na ndako na ye ya bokonzi, alobaki na mosakoli Natan : — Nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezali kati na ndako ya kapo.2Natan azongiselaki Davidi : — Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Nzambe azali elongo na yo.
3Kasi na butu wana, Nzambe alobaki na Natan : 4— Kende koyebisa Davidi, mosali na Ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali yo te moto okotongela Ngai ndako mpo ete navanda kati na yango. 5Banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo, natikali nanu kovanda na ndako moko te ; nazalaki kaka kati na Mongombo, longwa na esika songolo kino na esika pakala. 6Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na Ngai : ‘ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? ’ › 7Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele. 8Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili. 9Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso ; 10mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakotia lisusu banguna na yo na se ya bokonzi na yo. Boye, nazali koyebisa yo ete Yawe akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo. 11Tango okosilisa mobembo na yo awa na mokili mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye. 12Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi. 13Nakozala tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai ; nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya mokonzi oyo alekaki liboso na yo. 14Nakotia ye mokonzi ya ndako na Ngai mpe ya mokili na Ngai mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. › » 15Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.
Copyright information for
LinMNB