1 Chronicles 17:16-27
Libondeli ya Davidi
(2Sa 7.18-29)
16Mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki : « Oh Yawe Nzambe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali ? 17Mpe lokola nde ekokaki te na miso na Yo, Nzambe na ngai, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo ! Oh Yawe Nzambe, ozali kozwa ngai lokola moto ya lokumu ! 18Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo mpo na lokumu oyo ozali kopesa na mosali na Yo ? Pamba te, oh Yawe, oyebi mosali na Yo. 19Oh Yawe, mpo na mosali na Yo mpe kolanda mokano na Yo, okokisi makambo minene oyo mpe osali ete bilaka minene oyo nyonso eyebana. 20Oh Yawe, moko te akokani na Yo ; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo ! 21Boni, ezali solo na ekolo moko kati na mokili, oyo ekokani na bato na Yo, Isalaele ; ekolo oyo, kati na mokili, Nzambe asikola bato na yango mpo na lokumu na Ye moko ? Osalaki ete Kombo na yo ekende sango na nzela ya misala minene mpe ya somo oyo osalaki tango obenganaki bikolo liboso ya bato na Yo, oyo akangolaki na Ejipito. 22Okomisi Isalaele bato na Yo mpo na libela, mpe Yo, Yawe, okomi Nzambe na bango. 23Bongo sik’oyo, oh Yawe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe libota na ye ekokisama mpo na libela ! Sala ndenge olakaki. 24Boye, sala ete ekokisama, mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko mpe bato bakoma kolobaka : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, azali solo Nzambe mpo na Isalaele ! › Boye bokonzi ya libota ya mosali na Yo, Davidi, ekolendisama liboso na Yo. 25Solo, Yo moko, Nzambe na ngai, olakisaki na mosali na Yo ete okosala ete bokonzi ewumela na libota na ye. Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo. 26Sik’oyo oh Yawe, ozali Nzambe ! Olakaki makambo ya malamu epai ya mosali na Yo. 27Osepeli sik’oyo kopambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo ; pamba te ezali Yo, Yawe, nde opamboli yango, mpe epambolami mpo na libela. »
Copyright information for
LinMNB