‏ 1 Chronicles 21:1-17

Davidi atangi bato

(2Sa 24.1-25)

1Satana atelemelaki Isalaele mpe atindikaki Davidi na kotanga motango ya bato ya Isalaele. 2Boye, Davidi apesaki mitindo na Joabi mpe na bakambi ya bato : — Bokende kotanga bato ya Isalaele, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpe boyebisa ngai motango na bango mpo ete nayeba.

3Kasi Joabi azongisaki : — Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama ! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai ? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo ? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo ?

4Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi. Boye, Joabi abimaki, atambolaki kati na Isalaele mobimba mpe azongaki na Yelusalemi. 5Joabi ayebisaki Davidi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato monkoko moko na nkoto nkama moko kati na Isalaele mobimba, mpe nkoto nkama minei na tuku sambo kati na Yuda. 6Kasi kati na bango, Joabi atangaki te ekolo ya Levi mpe ya Benjame ; pamba te etinda ya mokonzi esepelisaki ye te.

7Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.

8Davidi alobaki na Nzambe : — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.

9Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya Davidi : 10— Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »

11Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : — Tala makambo oyo Yawe alobi : « Oponi etumbu nini : 12mibu misato ya nzala makasi ; sanza misato oyo banguna na yo bakolonga yo mpe mipanga na bango ekoboma basoda na yo ; to mikolo misato elongo na mopanga ya Yawe mpe bokono oyo ebomaka, mikolo oyo anjelu ya Yawe akobebisa etuka nyonso ya Isalaele ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai. »

13Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi kati na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato !

14Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, mpe bato ya Isalaele nkoto tuku sambo bakufaki. 15Nzambe atindaki anjelu na Yelusalemi mpo na kobebisa yango ; kasi wana anjelu azalaki kobebisa, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! »

Anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
16Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo.

Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.

17Davidi alobaki na Nzambe : — Boni, ezali ngai nde napesaki mitindo ete batanga motango ya bato ? Ngai moko nde nasalaki masumu, ngai moko nde nasalaki mbeba oyo eleki mabe. Bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te. Oh Yawe, Nzambe na ngai, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ; kasi tika ete bokono oyo ebomaka ekweyela te bato na Yo !
Copyright information for LinMNB