1 Chronicles 21:18-26
Davidi atongi etumbelo mpo na Yawe
18Anjelu na Yawe atindaki Gadi koloba na Davidi : — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orinani, moto ya Yebusi. 19Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe. 20Bongo, wana Orinani azalaki kotuta ble, abalukaki mpe amonaki anjelu. Boye bana na ye ya mibali minei oyo bazalaki na ye elongo babombamaki.21Davidi apusanaki pembeni ya Orinani ; mpe tango Orinani atalaki mpe amonaki Davidi, abimaki na etando mpe agumbamaki liboso ya Davidi, elongi kino na mabele. 22Davidi alobaki na Orinani : — Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe ; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila.
23Orinani azongiselaki Davidi : — Kamata yango ; mpe tika ete mokonzi, nkolo na ngai, asala na yango nyonso oyo amoni ete ezali malamu mpo na ye. Tala, ngai, nakopesa bangombe ya mibali lokola mbeka ya kotumba, banzete oyo babetelaka ble lokola koni, mpe ble lokola mbeka ya bambuma. Nakopesa nyonso wana.
24Kasi mokonzi Davidi alobaki na Orinani : — Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; nakomema te epai na Yawe eloko oyo ezali ya yo, nakobonzela Yawe te bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele.
25Boye, Davidi asombaki etando yango epai ya Orinani, na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo, nkama motoba. 26Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
Copyright information for
LinMNB