1 Chronicles 27:2-15
2Mpo na sanza ya liboso : lisanga ya Yashobeami, mwana mobali ya Zabidieli ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei. 3Yashobeami azalaki mokitani ya Peretsi mpe azalaki mokonzi ya bakonzi nyonso ya mampinga mpo na sanza ya liboso.4Mpo na sanza ya mibale : lisanga ya Dodayi, moto ya libota ya Aoyi. Mikiloti azalaki mokambi ya lisanga ya Dodayi. Lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
5Mpo na sanza ya misato : lisanga ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei. 6Benaya azalaki moko kati na basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi na bango ; Amizadabi, mwana na ye ya mobali, azalaki moko kati na basoda ya lisanga yango.
7Mpo na sanza ya minei : lisanga ya Asaeli, ndeko mobali ya Joabi. Zebadia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
8Mpo na sanza ya mitano : lisanga ya mokambi Shamewuti, moto ya libota ya Yizirayi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
9Mpo na sanza ya motoba : lisanga ya Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya libota ya Tekoa ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
10Mpo na sanza ya sambo : lisanga ya Eletsi, moto ya libota ya Peloni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
11Mpo na sanza ya mwambe : lisanga ya Sibekayi, moto ya libota ya Usha, moko kati na bakitani ya Zera ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
12Mpo na sanza ya libwa : lisanga ya Abiezeri, moto ya libota ya Anatoti, moko kati na bato ya libota ya Benjame ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
13Mpo na sanza ya zomi : lisanga ya Maarayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Zera ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
14Mpo na sanza ya zomi na moko : lisanga ya Benaya, moto ya libota ya Piratoni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
15Mpo na sanza ya zomi na mibale : lisanga ya Elidayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Otinieli ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
Copyright information for
LinMNB