1 Chronicles 3:5-9
(2Sa 5.14-16; 1Ma 14.4-7)
5Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi :Shimea, Shobabi, Natan mpe Salomo. Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Amieli, nde abotaki bana mibali minei oyo.
6Babotelaki ye lisusu bana oyo : Yibari, Elishama, Elifeleti, 7Noga, Nefegi, Yafia, 8Elishama, Eliyada mpe Elifeleti.
Bango nyonso bazalaki libwa.
9Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Davidi, longola bana mibali oyo bamakangu na ye babotelaki ye. Mpe Tamari azalaki ndeko na bango ya mwasi.
Copyright information for
LinMNB