‏ 1 Chronicles 8:28-38

(1Ma 9.34-44)

28Bango nyonso bazalaki bakambi ya bituka ndenge bakomama na buku ya mabota na bango, mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.

(1Ma 9.35-43; 1Sa 14.49-51)

29Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni.
Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Maaka. »
30Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali ; sima, Tsuri, Kishi, Bala, Nadabi, 31Gedori, Ayiyo mpe Zekeri. 32Mikiloti abotaki mwana mobali, Shimea. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na mabota na bango.
33Neri abotaki Kishi ;
Kishi abotaki Saulo ;
Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
34Jonatan abotaki Meriba-Bala ;
Meriba-Bala abotaki Mishe.
35Mishe abotaki :
Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
36Akazi abotaki Yeoyada ;
Yeoyada abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri, tata ya Motsa.
37Zimiri abotaki Motsa ;
Motsa abotaki Bineya ;
Bineya abotaki Rafa ;
Rafa abotaki Eleasa ;
mpe Elasa abotaki Atseli.
38Atseli abotaki bana mibali motoba :
Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani.
Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Atseli.
Copyright information for LinMNB