1 Chronicles 9:34-44
34Bango nyonso wana bazalaki bakambi ya libota ya Levi kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango ; mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.Libota ya Saulo
(1Ma 8.28-38)
35Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni elongo na Maaka, mwasi na ye.36Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso ; mpe sima, abotaki lisusu Tsuri, Kishi, Bala, Neri, Nadabi, 37Gedori, Ayiyo, Zakari mpe Mikiloti. 38Mikiloti abotaki Shimeami.
Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na bandeko na bango ya mibali.
39Neri abotaki Kishi ; Kishi abotaki Saulo ; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
40Jonatan abotaki mwana mobali, Meriba-Bala.
Meriba-Bala abotaki Mishe.
41Bana mibali ya Mishe :
Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
42Akazi abotaki Yayera ; Yayera abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri ; Zimiri abotaki Motsa ; 43Motsa abotaki Bineya ; Bineya abotaki Refaya ; Refaya abotaki Eleasa ; Eleasa abotaki Atseli.
44Atseli abotaki bana mibali motoba :
Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani. Bango nde bazalaki bana mibali ya Atseli.
Copyright information for
LinMNB