‏ 1 Chronicles 9:35-43

Libota ya Saulo

(1Ma 8.28-38)

35Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni elongo na Maaka, mwasi na ye.
36Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso ; mpe sima, abotaki lisusu Tsuri, Kishi, Bala, Neri, Nadabi, 37Gedori, Ayiyo, Zakari mpe Mikiloti. 38Mikiloti abotaki Shimeami.
Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na bandeko na bango ya mibali.
39Neri abotaki Kishi ; Kishi abotaki Saulo ; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
40Jonatan abotaki mwana mobali, Meriba-Bala.
Meriba-Bala abotaki Mishe.
41Bana mibali ya Mishe :
Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
42Akazi abotaki Yayera ; Yayera abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri ; Zimiri abotaki Motsa ; 43Motsa abotaki Bineya ; Bineya abotaki Refaya ; Refaya abotaki Eleasa ; Eleasa abotaki Atseli.
Copyright information for LinMNB