1 Kings 22:1-28
Mokonzi Akabi akani kobotola engumba Ramoti
(2Ma 18.1-27)
1Bitumba ezalaki te kati ya Isalaele mpe Siri mibu misato. 2Kasi na mobu ya misato, Jozafati, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala mokonzi ya Isalaele. 3Mokonzi ya Isalaele alobaki na bakalaka na ye : « Boyebi malamu ete Ramoti ya Galadi ezalaka ya biso ! Nzokande, tosalaka eloko moko te mpo na kobotola yango na maboko ya mokonzi ya Siri. » 4Alobaki mpe na Jozafati : — Boni, okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ?Jozafati azongiselaki mokonzi ya Isalaele : — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko, ezala bampunda na ngai mpe bampunda na yo.
Mosakoli Mishe mpe basakoli ya lokuta
5Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele : — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.6Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ?
Bazongiselaki ye : — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.
7Kasi Jozafati atunaki lisusu : — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe ?
8Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila.
Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !
9Bongo, mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye : « Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila. » 10Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango. 11Nzokande moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Na maseke oyo okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. › » 12Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko : « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi, okolonga ; pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. » 13Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye : — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi !
14Kasi Mishe azongisaki : — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Yawe akoloba na ngai, yango nde nakoloba.
15Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye : — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ?
Mishe azongisaki : — Kende ! Okolonga ! Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi.
16Kasi mokonzi alobaki na ye : — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ?
17Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »
18Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati : — Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai ; asakolaka kaka makambo ya mabe !
19Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. 20Yawe atuni : « Nani akokosa Akabi mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna ? »
Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye. 21Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki : « Ngai oyo ! Nakokosa ye. »
Yawe atunaki molimo yango : « Okosala yango ndenge nini ? »
22Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. »
Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. »
23Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo nyonso ; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo !
24Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki : — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ?
25Mishe azongisaki : — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.
26Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo : — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi. 27Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »
28Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te !
Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !
Copyright information for
LinMNB