1 Kings 22:41-51
Jozafati mokonzi ya Yuda
(2Ma 20.31–21.1)
41Jozafati, mwana mobali ya Asa, akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya minei ya bokonzi ya Akabi, mokonzi ya Isalaele. 42Jozafati azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili. 43 ▼▼22:43a in most Bibles.
Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te ; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe. 44 ▼▼22:43b in most Bibles.
Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. 45 ▼▼22:44 in most Bibles.
Jozafati abikaki na kimia elongo na mokonzi ya Isalaele. 46 ▼▼22:45 in most Bibles.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, misala na ye mpe bitumba na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 47 ▼▼22:46 in most Bibles.
Ezalaki ye nde moto alongolaki kati na mokili, bato ya suka oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, oyo batikalaki na tango Asa, tata na ye, azalaki na bokonzi. 48 ▼▼22:47 in most Bibles.
Na tango wana, mokonzi azalaki te kati na mokili ya Edomi. Ezalaki kaka na moyangeli moko oyo azalaki kotambolisa kuna. 49 ▼▼22:48 in most Bibles.
Jozafati asalisaki bamasuwa ya Tarsisi mpo na kokende koluka wolo na Ofiri ; kasi elongaki te kokende, pamba te bamasuwa ebukanaki na Etsioni-Geberi. 50 ▼▼22:49 in most Bibles.
Boye Akazia, mwana mobali ya Akabi, alobaki na Jozafati : « Tika ete basali na ngai bakende nzela moko na basali na yo na bamasuwa ! » Kasi Jozafati aboyaki. 51 ▼▼22:50 in most Bibles.
Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Copyright information for
LinMNB