‏ 2 Chronicles 11:18-23

Libota ya Roboami

18Roboami abalaki Maalati, mwana mwasi ya Yerimoti, mwana mobali ya Davidi mpe ya Abiyaili, mwana mwasi ya Eliabi, mwana mobali ya Izayi. 19Maalati abotelaki Roboami bana mibali oyo : Yewushi, Shemaria mpe Zaami. 20Sima, Roboami abalaki Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, oyo abotelaki ye : Abiya, Atayi, Ziza mpe Shelomiti. 21Roboami alingaki mingi Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, koleka basi mpe bamakangu na ye nyonso. Azalaki na basi zomi na mwambe mpe bamakangu tuku motoba ; mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mwambe mpe bana basi tuku motoba. 22Roboami aponaki Abiya, mwana mobali ya Maaka, mpo ete azala mokambi ya liboso ya bandeko na ye ya mibali, pamba te azalaki na makanisi ya kokomisa ye mokonzi. 23Boye, asalelaki mayele ya kopanza bana na ye nyonso ya mibali kati na bituka nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, kati na bingumba nyonso batonga makasi ; apesaki bango bilei mpe basi ebele.

‏ 2 Chronicles 12:1

Shishaki abundisi Yuda

(1Ba 14.21-31)

1Tango bokonzi ya Roboami elendisamaki mpe ye moko akomaki makasi, ye mpe Isalaele mobimba basundolaki Mobeko ya Yawe.
Copyright information for LinMNB