‏ 2 Chronicles 18:28-34

Babomi mokonzi Akabi na bitumba

(1Ba 22.29-36)

28Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi. 29Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati : — Nakomibongola wana nakokende na bitumba ; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi.

Boye, mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba.
30Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda oyo batambolisaka bashar : — Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele.

31Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye. 32Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye. 33Kasi moto moko abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar : — Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki.

34Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi ya Isalaele atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri, kino na pokwa. Mpe kaka na pokwa yango, akufaki.
Copyright information for LinMNB