2 Chronicles 25:1-4
Amatsia, mokonzi ya Yuda
(2Ba 14.1-6)
1Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi. 2Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi na motema na ye mobimba te. 3Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye, mokonzi. 4Nzokande, abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko, kati na buku ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo : « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
Copyright information for
LinMNB