‏ 2 Chronicles 3:15-17

(1Ba 7.15-22)

15Na liboso ya Tempelo ya Yawe, atongaki makonzi mibale oyo ezalaki na bametele pene zomi na sambo na bosanda. Na likolo ya likonzi moko na moko, ezalaki na moto ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano. 16Asalaki bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni mpe atiaki yango na mito ya makonzi ; asalaki lisusu bililingi ya bambuma nkama moko ya grenade, mpe akangisaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni. 17Mpe atongaki makonzi liboso ya Tempelo ya Yawe : moko na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe mosusu, na ngambo ya loboko ya mobali. Abengaki likonzi ya ngambo ya loboko ya mwasi Yakini
Yakini elakisi : Nzambe alendisi.
, mpe oyo ya ngambo ya loboko ya mobali, Boazi
Boazi elakisi : makasi ezali kati na Nzambe.
.
Copyright information for LinMNB