2 Chronicles 32:9-19
(2Ba 18.17-35; Ez 36.2-22)
9Sima na yango, wana Senakeribe, mokonzi ya Asiri, elongo na mampinga ya basoda na ye nyonso bazingelaki engumba Lakishi, atindaki bakonzi ya basoda na ye epai ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpe epai ya bato nyonso ya Yuda, oyo bazalaki na Yelusalemi ; atindaki bango kopesa sango oyo : 10« Tala makambo oyo Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alobi : Botie elikya na bino na nini mpo ete bowumela kati na Yelusalemi oyo bazingeli ? 11Bozali komona te ete Ezekiasi azali kokosa bino mpo ete bokufa na nzala mpe na posa ya mayi tango azali koloba : ‹ Yawe, Nzambe na biso, akokangola biso na loboko ya mokonzi ya Asiri ? › 12Boni, ezali kaka Ezekiasi wana te oyo alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo ya banzambe tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‹ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo moko kaka mpe kobonza mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo yango ? › 13Boyebi te makambo oyo ngai mpe batata na ngai tosalaki bato nyonso ya bikolo mosusu ? Boni, banzambe ya bikolo wana bakokaki solo kokangola mikili na bango na maboko na ngai ? 14Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo batata na ngai babebisaki, nani akokaki kokangola bato na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Nzambe na bino akoka solo kokangola bino na maboko na ngai ? 15Sik’oyo, botika te ete Ezekiasi amema bino na libunga mpe akosa bino ndenge wana ; bondimela ye te ! Pamba te soki nzambe moko te ya ekolo songolo to ya mokili pakala alongaki kokangola bato na ye na loboko na ngai mpe na loboko ya batata na ngai, bongo nzambe na bino nde akolonga kokangola bino na loboko na ngai ? »Senakeribe afingi Yawe
(2Ba 19.8-13; Ez 37.8-13)
16Bakonzi ya basoda ya Senakeribe bakobaki koloba mabe na tina na Yawe Nzambe mpe Ezekiasi, mosali na Ye. 17Senakeribe akomaki lisusu mikanda mpo na kofinga Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala maloba mabe oyo akomaki na tina na Ye : « Ndenge banzambe ya bato ya bikolo mosusu balongaki te kokangola bato na bango, ndenge wana mpe nzambe ya Ezekiasi akolonga te kokangola bato na ye na maboko na ngai. » 18Boye bagangaki na lokota ya Ebre mpo na kolengisa mpe kobangisa bato ya Yelusalemi oyo batelemaki likolo ya mir, mpo ete bakoka kobotola engumba. 19Balobaki na tina na Nzambe ya Yelusalemi lokola bato oyo bazali kolobela nzambe moko ya bapagano, nzambe oyo bato basali na ndenge mpe na maboko na bango !
Copyright information for
LinMNB