‏ 2 Chronicles 34:29-32

Boyeisi sika ya Boyokani elongo na Nzambe

(2Ba 23.1-3)

29Mokonzi Joziasi abengisaki bampaka nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi. 30Bongo akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na lokumu kino na oyo aleki na se. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe. 31Mokonzi atelemaki na etemelo na ye ya kolobela mpe asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe : — Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba ; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo.

32Mokonzi alapisaki ndayi yango bato nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi mpe kati na etuka ya Benjame. Mpe bavandi ya Yelusalemi batambolaki kolanda boyokani ya Nzambe, Nzambe ya batata na bango.
Copyright information for LinMNB