2 Chronicles 4:2-5
(1Ba 7.23-26)
2Asalaki nzungu ya monene ya bronze, oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele mitano ; bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe zingazinga na yango, bametele zomi na mitano. 3Na se ya monoko na yango, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bangombe oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko ; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko. 4Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale : misato etalaki na ngambo ya nor ; misato, na ngambo ya weste ; misato, na ngambo ya sude ; mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima ya bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati. 5Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei na misato.
Copyright information for
LinMNB