2 Chronicles 4:7-22
7Asalaki lisusu bitelemiselo zomi ya minda, basala na wolo kolanda ndakisa na yango oyo epesamaki ; mpe atiaki yango na eteni oyo eleki monene kati na Tempelo : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi. 8Asalaki bamesa zomi mpe atiaki yango kati na eteni oyo eleki monene : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi. Asalaki lisusu bakopo nkama moko ya wolo mpo na kosopela makila na likolo ya etumbelo. 9Asalaki lopango ya Banganga-Nzambe mpe lopango monene. Asalaki bikuke ya lopango mpe alatisaki yango bronze.(1Ba 7.38-51)
10Atiaki nzungu ya monene na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude-este. 11Urami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Urami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Nzambe : 12makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango, 13bililingi ya bambuma ya grenade nkama minei ekangana na maboke ya bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama : milongo mibale ya bililingi ya grenade mpo na elilingi moko na moko ya basinga oyo basala lokola monyama, mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi ; 14bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene, oyo batiaki na likolo ya bivandelo, 15nzungu ya monene ya libungutulu, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki komema nzungu ya monene, 16basani mpo na kotia putulu, bapawu, biloko ya songe mpo na misuni elongo na bisalelo na yango nyonso. Urami-Abi asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe ; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto. 17Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tseredata. 18Mpo ete Salomo asalaki biloko oyo nyonso ebele koleka, yango wana bakokaki te koyeba kilo ya bronze oyo basalelaki. 19Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe : etumbelo ; bamesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ; 20bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mpo na kopela liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, 21bafololo na yango, minda na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto, basala na wolo ya peto makasi ; 22bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, bikangelo ya wolo ya bikuke ya Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo. 2 Chronicles 5:1
Bamemi Sanduku na Tempelo
1Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki : palata, wolo mpe bisalelo nyonso ; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Nzambe.
Copyright information for
LinMNB