2 Samuel 1:4-12
4Davidi atunaki lisusu : — Yebisa ngai makambo nini eleki kuna ?Moto yango alobaki : — Mampinga ya Isalaele ekimi bitumba ; ebele kati na bango bakweyi na bitumba mpe bakufi, ata Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi.
5Bongo Davidi alobaki na elenge mobali oyo azalaki kopesa ye sango : — Oyebi ndenge nini ete Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi ?
6Elenge mobali azongisaki : — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye. 7Tango kaka abalukaki mpe amonaki ngai, abengaki ngai ; mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo. » 8Atunaki ngai :
— Ozali nani ?
Nazongiselaki ye : — Nazali moto ya Amaleki.
9Alobaki na ngai : — Pusana pene na ngai mpe boma ngai, pamba te nazali koyoka lisusu nzoto malamu te, atako nazali nanu na bomoi.
10Boye napusanaki pene na ye mpe nabomaki ye, pamba te nayebaki ete akobika te na kotala ndenge babetaki ye. Sima, nazwaki ekoti na ye ya bokonzi, oyo azalaki na yango na moto mpe singa oyo alataki na loboko na ye, mpe namemi yango epai na yo, nkolo na ngai. 11Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango. 12Basalaki matanga, balelaki mpe bakilaki bilei kino na pokwa, mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali ; mpo na mampinga ya Yawe mpe mpo na libota ya Isalaele, mpo ete bakufaki na nzela ya mopanga.
Copyright information for
LinMNB