2 Samuel 3:2-5
2Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron :Mwana ya liboso ezalaki Aminoni oyo Ayinoami, moto ya Jizireyeli, abotelaki ye ;
3ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ;
ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ;
4ya minei, Adoniya oyo Agite abotelaki ye ;
ya mitano, Shefatia oyo Abitali abotelaki ye ;
5ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi ya Davidi, abotelaki ye.
Bango nde bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron.
Copyright information for
LinMNB