2 Samuel 5:11-16
(1Ma 14.1-2)
11Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako. 12Davidi asosolaki ete Yawe azali kolendisa ye lokola mokonzi ya Isalaele mpe azali kotombola bokonzi na ye mpo na Isalaele, bato na Ye.(1Ma 3.5-9; 14.3-7)
13Tango Davidi alongwaki na Ebron mpe akendeki kovanda kati na Yelusalemi, azwaki lisusu bamakangu mpe basi mosusu ebele oyo babotelaki ye bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 14Tala bakombo ya bana ya Davidi oyo babotamaki na Yelusalemi : Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo, 15Yibari, Elishuwa, Nefegi, Yafia, 16Elishama, Eliyada mpe Elifeleti.
Copyright information for
LinMNB