John 1:19-23
Bimoniseli ya liboso mpe kokoso ya liboso
Litatoli ya Yoane Mobatisi
(Mat 3.1-12; Mlk 1.2-8; Lk 3.15-17)
19Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?20Abetaki monoko te, kasi alobaki na bango solo na bonsomi nyonso : — Ngai, nazali Klisto te.
21Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ?
Azongisaki : — Nazali Eliya te.
Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ?
Azongisaki : — Te !
22Bakobaki kotuna ye : — Bongo ozali penza nani ? Ozali koloba nini na tina na yo moko ? Yebisa biso yango, pamba te tosengeli kopesa eyano epai ya bato oyo batindi biso.
23Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki : — Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe : « Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! »
Copyright information for
LinMNB