‏ John 1:19-28

Bimoniseli ya liboso mpe kokoso ya liboso

Litatoli ya Yoane Mobatisi

(Mat 3.1-12; Mlk 1.2-8; Lk 3.15-17)

19Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?

20Abetaki monoko te, kasi alobaki na bango solo na bonsomi nyonso : — Ngai, nazali Klisto te.

21Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ?

Azongisaki : — Nazali Eliya te.

Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ?

Azongisaki : — Te !

22Bakobaki kotuna ye : — Bongo ozali penza nani ? Ozali koloba nini na tina na yo moko ? Yebisa biso yango, pamba te tosengeli kopesa eyano epai ya bato oyo batindi biso.

23Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki : — Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe : « Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! »

24Nzokande batindami yango bazalaki Bafarizeo. 25Batunaki ye lisusu : — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?

26Yoane azongiselaki bango : — Ngai, nazali kobatisa na mayi ; kasi kati na bino, ezali na Moto moko oyo bino boyebi te ; 27azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.

28Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.
Copyright information for LinMNB