John 1:35-51
Bayekoli ya liboso ya Yesu
(Mat 4.18-22; Mlk 1.16-20; Lk 5.1-11)
35Mokolo oyo elandaki, wana Yoane azalaki lisusu na esika yango elongo na bayekoli na ye mibale, 36amonaki Yesu koleka mpe alobaki : « Botala Mpate ya Nzambe ! » 37Lokola bayekoli nyonso mibale bayokaki ndenge Yoane alobaki, balandaki Yesu. 38Bongo tango Yesu abalukaki mpo na kotala na sima, amonaki bango mibale bazali kolanda Ye. Atunaki bango : — Bolingi nini ?Bazongisaki : — Rabi ▼
▼Rabi elingi koloba : Moteyi.
, ovandaka wapi ?39Yesu azongiselaki bango : — Boya mpe bokomona.
Balandaki Yesu, bamonaki esika oyo azalaki kovanda mpe bavandaki elongo na Ye na mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei sima na midi. 40Andre, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko kati na bato wana mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu. 41Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya ▼
▼Masiya elingi koloba : Klisto.
! » 42Bongo amemaki Simona epai ya Yesu. Yesu atalaki Simona mpe alobaki : « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane ; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi ▼▼Sefasi elingi koloba : Libanga.
. » 43Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye : « Landa Ngai. »44Filipo, Andre mpe Petelo bazalaki bato ya engumba Betisaida. 45Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.
46Natanaele atunaki ye : — Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti ?
Filipo azongiselaki ye : — Yaka mpe okomona yo moko.
47Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye : — Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te !
48Natanaele atunaki Ye : — Oyebi ngai ndenge nini ?
Yesu azongiselaki ye : — Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.
49Natanaele alobaki : — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.
50Yesu alobaki na ye : — Ondimi kaka mpo ete nalobi na yo : Namonaki yo na se ya nzete ya figi ? Okomona lisusu makambo minene koleka oyo.
51Bongo alobaki lisusu : « Nazali koloba na bino penza ya solo : bokomona Likolo kofungwama, mpe ba-anjelu ya Nzambe komata mpe kokita mpo na Mwana na Moto. »
Copyright information for
LinMNB