‏ John 18:13-27

13bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana. 14Ezalaki mpe Kayifa wana nde apesaki Bayuda toli oyo : « Eleki malamu ete moto moko akufa mpo na bato nyonso. »

Petelo awangani Yesu mpo na mbala ya liboso

(Mat 26.69-70; Mlk 14.66-68; Lk 22.55-57)

15Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. 16Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo. 17Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo : — Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana ?

Petelo azongisaki : — Nazali moyekoli na ye te.

18Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.

Mokonzi ya Banganga-Nzambe asambisi Yesu

(Mat 26.59-66; Mlk 14.55-64; Lk 22.66-71)

19Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye. 20Yesu azongiselaki ye : — Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka ; nalobaki eloko moko te na nkuku. 21Mpo na nini ozali kotuna Ngai mituna ? Tuna epai ya bato oyo bayokaki Ngai koloba. Ezali bango nde bakoki koyeba malamu makambo oyo nazalaki koloba.

22Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba : — Boni ! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe ?

23Yesu alobaki na ye : — Soki nalobi mabe, mabe yango ezali wapi ? Kasi soki nalobi na Ngai kaka solo, mpo na nini kobeta Ngai ?

24Bongo Ana atindaki Yesu oyo azalaki kaka ya kokangama na basinga, epai ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe.

Petelo awangani Yesu mpo na mbala ya mibale

(Mat 26.71-75; Mlk 14.69-72; Lk 22.58-62)

25Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye : — Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye ?

Petelo awanganaki yango na koloba : — Te, nazali moyekoli na ye te.

26Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki : — Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga ?

27Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki.
Copyright information for LinMNB