John 18:25-27
Petelo awangani Yesu mpo na mbala ya mibale
(Mat 26.71-75; Mlk 14.69-72; Lk 22.58-62)
25Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye : — Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye ?Petelo awanganaki yango na koloba : — Te, nazali moyekoli na ye te.
26Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki : — Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga ?
27Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki.
Copyright information for
LinMNB