‏ John 18:28-40

Pilato asambisi Yesu

(Mat 27.1-2, 11-31; Mlk 15.2-15; Lk 23.13-25)

28Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika. 29Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango : — Bofundi moto oyo mpo na likambo nini ?

30Bazongiselaki ye : — Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.

31Pilato alobaki na bango : — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino.

Bayuda bazongiselaki ye : — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.

32Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.

33Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?

34Yesu azongisaki : — Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai ?

35Pilato atunaki Yesu : — Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ?

36Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.

37Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ?

Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.

38Pilato atunaki Ye : — Solo ezali nini ?

Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango : — Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa.
39Kasi lokola ezali momesano epai na bino ete nabimisa na boloko mokangami moko, na tango ya feti ya Pasika, bozwa sik’oyo mokano. Bolingi ete natika mokonzi ya Bayuda mpo ete akoma nsomi ?

40Bango nyonso bazongisaki na koganga : — Te ! Ye te ! Bimisa nde Barabasi !

Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.
Copyright information for LinMNB