‏ John 18:28-40

Pilato asambisi Yesu

(Mat 27.1-2, 11-31; Mlk 15.2-15; Lk 23.13-25)

28Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika. 29Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango : — Bofundi moto oyo mpo na likambo nini ?

30Bazongiselaki ye : — Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.

31Pilato alobaki na bango : — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino.

Bayuda bazongiselaki ye : — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.

32Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.

33Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?

34Yesu azongisaki : — Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai ?

35Pilato atunaki Yesu : — Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ?

36Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.

37Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ?

Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.

38Pilato atunaki Ye : — Solo ezali nini ?

Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango : — Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa.
39Kasi lokola ezali momesano epai na bino ete nabimisa na boloko mokangami moko, na tango ya feti ya Pasika, bozwa sik’oyo mokano. Bolingi ete natika mokonzi ya Bayuda mpo ete akoma nsomi ?

40Bango nyonso bazongisaki na koganga : — Te ! Ye te ! Bimisa nde Barabasi !

Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.

‏ John 19:1-16

Bakateli Yesu etumbu ya kufa

1Bongo Pilato apesaki mitindo ete bakamata Yesu, mpe abetisaki Ye fimbu. 2Basoda basalaki ekoti na banzube mpe balatisaki Ye yango na moto ; balatisaki Ye lisusu nzambala ya motane. 3Bazalaki koya koloba na Ye : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » Mpe babandaki kobeta Ye bambata.

4Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango : — Botala ! Nayei na Ye na libanda epai na bino mpo boyeba ete ngai nazwi Ye na mabe moko te.

5Boye, Yesu abimaki alata ekoti ya nzube mpe nzambala ya motane. Pilato alobaki na bango : — Moto yango, ye oyo !

6Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !

Kasi Pilato azongisaki : — Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.

7Bayuda balobaki na molende nyonso : — Tozali na Mobeko ; mpe kolanda Mobeko na biso, asengeli kokufa, pamba te amikomisi Mwana na Nzambe.

8Tango Pilato ayokaki maloba wana, abangaki lisusu makasi. 9Azongaki lisusu kati na ndako ya moyangeli mpe alobaki na Yesu : — Ozali moto ya mboka nini ?

Kasi Yesu apesaki ye eyano te.

10Pilato alobaki na Ye : — Boni, oboyi kozongisela ngai eyano ? Oyebi te ete ngai nazali na makoki ya kobaka yo na ekulusu mpe ya kotika yo ?

11Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.

12Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga : — Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.

13Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata
Gabata elakisi : esika batanda mabanga.
. »
14Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda : — Botala mokonzi na bino !

15Kasi babandaki koganga : — Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu !

Pilato alobaki na bango lisusu : — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ?

Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki : — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !

16Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.
Copyright information for LinMNB