John 19:17-22
Kufa Ya Yesu
(Mat 27.32-56; Mlk 15.21-41; Lk 23.26-49)
17Yesu amemaki, Ye moko, ekulusu na Ye ; abimaki na engumba mpe akendeki na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gologota ▼▼Gologota elakisi : mokuwa ya moto.
. » 18Ezalaki na esika yango nde babakaki Yesu na ekulusu, elongo na bato mosusu mibale : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. 19Pilato akomaki na libaya, makomi oyo atiaki na ekulusu ; akomaki :
Yesu, moto ya Nazareti, Mokonzi ya Bayuda.
20Lokola esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ezalaki pene ya engumba, Bayuda ebele batangaki makomi yango, pamba te bakomaki yango na lokota ya Ebre, lokota ya latino mpe lokota ya Greki. 21Bakonzi ya Banganga-Nzambe balobaki na Pilato : — Osengelaki te kokoma : « Mokonzi ya Bayuda ; » osengelaki nde kokoma : « Moto oyo alobaki : ‹ Nazali mokonzi ya Bayuda. › »22Kasi Pilato azongisaki : — Makambo oyo nakomi ekotikala kaka ndenge wana.
Copyright information for
LinMNB