‏ John 20:1-13

Yesu asekwi

(Mat 28.1-8; Mlk 16.1-4; Lk 24.1-2, 9-12)

1Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda. 2Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga ; alobaki na bango : — Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi !

3Petelo elongo na moyekoli wana bakendeki na kunda. 4Bango mibale bazalaki kopota mbangu nzela moko ; kasi lokola moyekoli wana azalaki mbangu koleka Petelo, akomaki moto ya liboso na kunda. 5Agunzamaki mpo na kotala mpe amonaki, na mabele, maputa oyo bakundaki na yango Yesu ; kasi akotaki te. 6Simona Petelo oyo azalaki kolanda ye akomaki mpe akotaki kati na kunda, amonaki maputa oyo ezalaki na mabele 7mpe elamba oyo balingaki na moto ya Yesu ; elamba ezalaki esika moko te na maputa oyo balingaki na yango nzoto ya Yesu, kasi ezalaki ya kolingama na esika na yango moko. 8Bongo moyekoli oyo akomaki moto ya liboso kuna na kunda, ye mpe akotaki kati na kunda ; amonaki mpe andimaki. 9Kasi kino na tango wana, basosolaki nanu te ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi, kolanda ndenge Makomi ezali koloba.

10Sima na yango, bayekoli nyonso mibale bazongaki na esika oyo bazalaki kovanda.

Yesu abimeli Mari ya Magidala

11Nzokande, Mari atelemaki na libanda, pene ya kunda, mpe azalaki kolela. Mpe wana azalaki kolela, agunzamaki mpo na kotala kati na kunda ; 12amonaki ba-anjelu mibale balata bilamba ya pembe mpe bavanda na esika oyo nzoto ya Yesu ezalaki : moko na ngambo ya moto, mpe mosusu, na ngambo ya makolo. 13Ba-anjelu batunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ?

Azongisaki : — Nazali kolela mpo ete balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soki batie Ye wapi ?
Copyright information for LinMNB