John 20:1-6

Yesu asekwi

(Mt. 28.1 ; Mk. 16.1-4 ; Lk. 24.1-2,9-12)

1Na tongo-tongo penza ya mokolo ya liboso ya poso, na tango molili ezalaki naino, Mariya ya mboka Magadala akendaki na lilita ; mpe akutaki libanga basiʼbalongoli yango na lilita. 2Azongaki mbangu epai ya Simon Piere mpe epai ya moyekoli mosusu oyo Yesu azalaki kolinga, mpe alobaki :

—Balongoli Nkolo na lilita, mpe toyebi te soki batie ye wapi !

3Bongo Piere abimaki elongo na moyekoli oyo mosusu, mpe bakendaki na lilita. 4Bango mibale bazalaki kokima mbangu nzela moko, kasi lokola moyekoli oyo mosusu azalaki mbangu mingi koleka Piere, yango wana akomaki liboso na lilita. 5Angunzamaki, mpe amonaki bilamba oyo bakundelaka Yesu, ezalaki na mabele ; kasi akotaki na kati te. 6Simon Piere, oyo azalaki kolanda ye, akomaki, akotaki na lilita mpe amonaki bilamba na mabele,
Copyright information for LinMNB