‏ John 20:19-23

Yesu abimeli bayekoli na Ye

(Lk 24.36-43; Mlk 16.14-18)

19Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !

20Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo. 21Yesu alobaki na bango lisusu : — Tika ete kimia ezala na bino ! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino.

22Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango : — Boyamba Molimo Mosantu ! 23Bato oyo bokolimbisa masumu na bango, masumu na bango ekolimbisama ; kasi ba-oyo bokolimbisa te, bakozwa mpe bolimbisi te.
Copyright information for LinMNB