‏ John 21:1-11

Yesu abimeli lisusu bayekoli na Ye

(Lk 5.1-11)

1Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na Ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Tala ndenge nini abimelaki bango : 2Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ; 3Simona Petelo alobaki na bango : — Bandeko na ngai, nakeyi na ngai koloba mbisi !

Balobaki na ye : — Biso mpe tokende elongo na yo !

Bakendeki mpe bamataki na bwato ; kasi na butu wana, bazwaki ata mbisi moko te.

4Na tongo makasi, Yesu atelemaki na libongo, kasi bayekoli bayebaki te ete ezali Ye. 5Yesu abengaki bango : — Bana na Ngai ! Boni, bozali na mbisi te ?

Bazongisaki : — Te !

6Alobaki na bango : — Bobwaka monyama na ngambo ya loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa bambisi.

Boye, babwakaki monyama mpe bakokaki lisusu te kobenda yango longwa na mayi, pamba te etondaki na bambisi ebele.

7Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo : — Bandeko, ezali Nkolo !

Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi.
8Ezali bayekoli mosusu nde bazongisaki bwato na libongo, wana bazalaki kobenda monyama etonda na bambisi ebele, pamba te bazalaki mosika te na mokili : bametele pene nkama moko ekabolaki libongo na esika oyo bazalaki.

9Tango bakitaki na mabele, bamonaki mapa mpe moto ya makala oyo na likolo na yango ezalaki na bambisi.

10Yesu alobaki na bango : — Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kozwa.

11Simona Petelo amataki na bwato mpe abendaki monyama kino na mokili. Ezalaki ya kotonda na bambisi ya minene pene nkama moko na tuku mitano na misato. Atako bambisi ezalaki penza ebele, monyama epasukaki te.
Copyright information for LinMNB